Music Video

Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
Koffi Olomidé
Koffi Olomidé
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Koffi Olomidé
Koffi Olomidé
Composer

Lyrics

Nga na sala nini vraiment? Nga na sala nini penza?
Po na bonga na la vie, po nga pe ba ndimaka nga
Ba tika koseka ka nga eh, po na bonga na mokili
Po nga mpe ba ndimaka nga lokola baninga eh
Nga na sala nini vraiment? Nga na sala nini penza?
Po na bonga na la vie, po nga pe ba ndimaka nga
Ba tika koseka ka nga eh, po na bonga na mokili
Po nga mpe ba ndimaka nga lokola baninga eh
Moyen moko soki ezali, nzela moko soki ezalaka
Oyo moto alandaka po abonga, lakisa nga yango, Yahweh
Paladon, ata na ndoto, ata na ndoto oh-oh
Moyen moko soki ezali, nzela moko soki ezalaka
Oyo moto alandaka po abonga, lakisa nga yango, Yahweh
Paladon, ata na ndoto, ata na ndoto ah...
Limbisa masumu ma nga, mabé na nga natubeli eh
Nzela na nga soki ba kanga eh, étoile na nga soki ba bebisa
Na bondoki to na ba jeux, fungola nga na kendé liboso
Liboso...
Moyen moko soki ezali, nzela moko soki ezalaka
Oyo moto alandaka po abonga, lakisanga yango, Yahweh
Paladon, ata na ndoto, ata na ndoto
Limbisa masumu ma nga, mabé na nga natubeli eh
Nzela na nga soki ba kanga eh, étoile na nga soki ba bebisa
Na bondoki to na ba jeux, fungola nga na kendé liboso
Liboso oh...
Tango nazalaki mwana moké na ba mbula zomi na ndambo
Moto soki aza na 25 ans, nazalaki komona yé mpaka
Lelo nga ba mvula ekomi ébélé, eloko moko té, kaka boyé
Na komi kobota, na bali eh, Joniko ayé, ndéngé moko
Saint James pe ayé, ndengé moko
Nga mwana maman nako suka wapi?
Yema wulé, ah nga yema wulé
Yema wulé, ah nga yema wulé
Na lela papa, nga na lela papa
Na lela yaya, nga na lela Chimène
Ah nga motéma maman, ah nga mabanzo yeh
Nga témoin ya maman Annie
Nga mwana ma Nzumba, naleka matondo
Nasalaka na boboto, na motéma mpe étape moko
Eloko kombo zuwa, nayebi té
Likunia Nzambe apima ngai, po nalela ka té
Po nayebi Nzambe akopona nga na tango na nga
Yema wulé, ah nga yema wulé
Yema wulé, ah nga yema wulé
Na lela mama, nga na lela mama Annie
Na lela Didi, nga na lela Mopao
Na lela Bébé, nga lela le Coeur
Na lela maman, nga nalela maman Nzumba
Na lela Bébé, nga na lela Mopao
Nalela yaya... Merci
Written by: Koffi Olomidé
instagramSharePathic_arrow_out