Top Songs By Cindy le Cœur
Similar Songs
Credits
PERFORMING ARTISTS
Cindy le Cœur
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Koffi Olomidé
Composer
Lyrics
Élégance
Hum, anh
Tii bolingo ekomisi nga na Goma
Tii nayoki pe té pema po epayi Élégance azali, na koma
Bolingo ya motéma, nakoti pe ba zamba
Na mati pe ba ngomba
Súka-súka olobi nini, Élégance?
Na ya to na continuer kozela?
Súka-súka olobi nini, Élégance?
Na ya to na continuer kozela yo?
Namata ba ngómba
Nakota ba zámba, nabanga té
Ngáí awa butu ekómá se mikúsé
Ngáí awa pongi ekómá 3 heures du temps
Ba ndoto monotonie
Élégance
C'est elle que j'aime
Élégance
C'est elle mon choix
Nzambé opesa baníngá ba vocations
Bakomá ko prêcher la bonne parole
Élégance ótíndela nga ata na WhatsApp
Sourire nayo ya tongo ya leló
Soki obosani tindá ata oyo ya mpokwa eeh
Súka-súka olobi nini, bébé?
Na ya to na continuer kozela yo?
Baníngá Nzambe a pesa bango ba vocations
Na 3 heures du matin tango mpongi ekimaka nga
Nakoma ko fouiller téléphone na mona ata appel manqué
Soki tango mosusu, Élégance okomeli nga, mon bébé
"Bonjour, mon fruit de mer, je t'aime"
Élégance
C'est elle que j'aime
Élégance
Mon choix eeh
Mais ebandaki neti ndoto, bolingo ya ngai na Élégance
Neti lisapo onge oyo ya Romeo yé na Juliette
Bolingo oyo mboka môbimba epesa longónya
Ya biso ebongaki neti linzanza na lángi
Lelo etíkálí lisitoile, bolingo ebótí mapapú
Nga na boya ébélé ya mabala pona kozela Élégance
Mikolo elekí kutu ba sánzá pé ba mvula
Y'ozongaka té nga awa likombé ebali nde nzóto
Souci ndé bileyi bya nga ko bandá moyi butu pi
Hum y'olatisa nga 'be bomwana pili ya bolingo
Lelo mokuwa ememi botutu o'kati ya nzóto
Nakoma kobángá na ya kokúfa avant eeh
Kaka pona etúmbu ba bengi kombo bolingo
Yaka omona ndéngé bolingo ezo salá génocide
Natindi pe ba messagers bazongi maboko pámba eh
Kombo n'ô etingami nga lolému neti soyi eh
Diagnostique ya bokono ezwí nga absence, Élégance
Zonga nakomi migrant, na zangi terre d'asile
Na leli-leli eeh, Élégance Elega'
Wooh-ooh
Mwana ma' Solange azali ya ngai mókó ngo
Wooh-ooh
Soki ozalákí mbóka, Élégance
Nalingaki'o changer nationalité
Nalingaki'o changer pé passeport
Nakoma na ngáí Elégançais
Nakoma na ngáí Elégançois
Et me soumettre à tes lois, ça va de soit
Élégance kitoko eeh
Élégance kitoko avec excédant
Ekomi'o sopana nzelá-nzelá
Lokola loso na mutu ya porteur
Basi óyo baza na problème ya beauté
Ba lokótá ba mipakola na nzóto
Bakoma belle, belle, belle, belle
Élégance Nzambe asalaki yo eeh
Na l'heure oyo na paradis agitation
Mpé makélélé nionso esilaki eeh
Asalaki yo malembé-malembé
Alati loupe neti oyo ya ba diamantaires
Tango basalaka expertise ya diamant
Soucis nayé obima parfaite
Lelo sur terre, moto nionso aza convaincu
Perfection eza domaine privé ya Nzambe
Élégance oza produit ya perfection ya Nzambe
Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh
Baninga bo tika ngáí na lia mbuma
Adam aliaki simple pomme ya Eva
Po na paradiso Élégance azalákí té
Arata mangoustan
Arata sucre oyo ya mbila y'esobe
Arata maracuja aaaah
Arata mayi ya pondu ya mayi-mayi
Arata muselu óyo ya dongo-dongo
Arata bizarrerie óyo ya pamplemousse
Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh
Otié conflit entre Gucci na Vuitton
Bazowela yo eh, ozala égérie na bangó
Basála bénéfice, ba concurrence óyo ya Apple na Google
Élégance
Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh
Élégance komisa nga ata bureau n'o
Petit ya confiance óyo asimbelaka yo sac
Maman au secours, Élégance soki atali nga
Nazongaka mwana moke óyo ba memaka na l'école
Na ba nounous, na deux tartines ya pain au chocolat na cartable
Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh
Élégance Elega Miandabu
Mwana maman Solange, aux lèvres rose fuchsia
Ngáí awa na motéma, l'amour est toujours en cours
Ton amour, Élégance, dans mon cœur pour toujours
Ton amour, Élégance, il n'y aura jamais de dernier jour
Pour ton amour, Élégance, je ferais toujours demi-tour
Depuis y'okenda, Élégance, nakoma na veste ya jardinier
Na pesi kombo na yo na chaque fleur ya jardin
Ba roses, ba pétunias, ba orchidées, ba jasmins
Ye-ye-ye, ye-ye-ye-eeh
Y'otikaka ko silika, je t'aime
Y'otikaka ko limwa-limwa, je t'aime ko
Yo tikaka ko ignorer nga, je t'aime
Y'otika ko lelisa nga, je t'aime
Y'otikaka ko tromper nga, je t'aime
Y'otika ko pesa mawa, je t'aime
Y'otikaka ko silika, je t'aime
Y'otika ko tromper nga, je t'aime
Y'otikaka ko mignola nga, je t'aime
Written by: Koffi Olomidé