Similar Songs
Lyrics
Nayaki na mawa na zongi n'esengo asali ya mingi
Nini yango ya malonga akuti kati na nga po akanisa nga
Nalingi ye mingi napesa ye nini nasili mayele
Fongola ata lola banjelu bakita toyemba pona yo
Balongolaki nga na liste tango lipamboli eyaki
Balukaki bazua kiti na nga lola e reclamer kaka ngai eh
Offrandes na nga na ba sacrifices akobosana'ango te oh
Nazalaki kaka na elikia nayebaki ekosimba
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi kotuna nasali ndenge nini
Moto lokola nga nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi kotuna oh naza ya libota nini
Moto lokola ngai famille na nga ya pauvre
Nzambe ya lola akaniseli ngai
Ya Nzambe, ya Nzambe, naza ya Nzambe
Victorieux, victorieux, je suis victorieux
Balekaki nga na makasi balekaki nga na kitoko eh
Balekaki nga na ba relations, balekaki nga na mbongo eh
Mokolo lola efungwamaki ngolu ekitelaki epa na ngai
Nazalaki kaka na elikia nayebaki ekosimba
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi kotuna oh naza ya libota nini
Moto lokola ngai famille na nga ya pauvre
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi kotuna oh nalekeli nzela nini
Moto lokola nga nawuta na nga na pasi
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi koloba oh ngai nasimbi kisi
Moto lokola ngai na luka ye na ba ngomba eh
Nzambe ya lola akaniseli ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili
Bokomi koloba oh nakanga ye na kisi
Mwasi lokola nga na mikaba na losambo
Nzambe ya lola a imposé kaka ngai eh
Nabimi molongi elekeli mokili
Bakomi koloba oh nayibi mbongo ya l'état
Moto lokola nga nawuta na nga na village
Nzambe ya lola a élèvé kaka ngai
Nabimi molongi elekeli nga
Moko kombo na ngai ekomami na lola
Moto lokola ngai na sala masumu ebele
N'ekulusu akufeli kaka ngai eh
Ya Nzambe, ya Nzambe, naza ya Nzambe
Nayaki na mawa na zongi n'esengo asali ya mingi
Nini yango ya malonga akuti kati na nga po akanisa nga
Nalingi ye mingi napesa ye nini nasili mayele
Fongola ata lola banjelu bakita toyemba pona yo
Nayaki na mawa na zongi n'esengo asali ya mingi
Nini yango ya malonga akuti kati na nga po akanisa nga
Nalingi ye mingi napesa ye nini nasili mayele
Fongola ata lola banjelu bakita toyemba pona yo
Written by: Moise Mbiye