Similar Songs
Credits
PERFORMING ARTISTS
MPR
Performer
COMPOSITION & LYRICS
José Mwembia Batoka
Songwriter
Mukinayi Luboya Marcus
Songwriter
YANNICK LUMBALA
Arranger
PRODUCTION & ENGINEERING
YANNICK LUMBALA
Producer
Lyrics
MPR
Kébá
Piano
Mister Producer
Na virage oyo, na moni fatigue na ba effort ya batu
Et tokomi'ozanga rien, depuis politicien azua tout
Maman à genoux a'o sámbela po tobima na trou
Na mayi ya misu ya peuple, ndé source ya pouvoir na bango ezua goût
Nani akoki ko zapper pona biso épisode oyo ya vie?
Bazo sacrifier vérité, ba tiki lokuta na abri
Na mbóka óyo prison eza seule façon ya ko se libérer
Malheur 'a bokonzi eza ya ko mona peuple a'o vivre heureux
Chemise, cravate, kazaka mokonzi aké Parlement
Loi ebimi, asutuki a-voter, kaniaka ekoti
Wana biso na cité, mayi na courant, femme de nuit
Ba léki na kuluna, ba petite sœurs ba'o teka nini
Guerre ya Congo ekoma chanson, ba tia refrain na Est
Vrai problème eza ya musique to ya ba chef d'orchestre?
Na guerre ya ba échecs na bango, victimes ezali biso
Élections é'a casting ya ba riches, mona mais kangá miso
Ba'o kweyisa ngómbá ya avenir, ba détruire mutema ya futur
Ba croqué fruit défendu, corruption ekoma culture
Ba vidé stock ya fierté po ba tondisa parking
Peuple a'o mela somnifère, o'zela changement ebanda par qui?
Père oyo ezali nzembo te oyo eza ba cries ya douleur
Omoni elamba ya pouvoir ndenge ezo changer ba couleurs
Mélodies ya ba dialogues nionso esuka na note ya mabe
Awa si rose ekoli, ekoli na ba épines pe
Elambá soni ya lokúmu bo lati, bozo yoka kilo te
Olingi olongola lipoti ya lisu na nga, mais ya yo, eza kaka
Monguna na biso eza kaka oyo aza libanda te, bino pe
Óyo bo loni na mitema na biso ebungi te, eza kaka
Aaahh eza kaka
Aaahh eza kaka
Mituna sans biyano, même presse eza attachée
Ko ndima na molili tozo kufa à petit feu
Opposition cinéma, ba'na plus de 20 discours
Leader aza te, peuple a'o senga lemuntu asala retour
Ba bosani 18 ans ya mayi, ya moto na ya ba gaz
Ya ba tire ya balles réelles, liberté d'expression na cage
Congolais eza émotion, Congolais eza sentiment
Politique ya déception ba'o lia, ba'o méla tranquillement
Na monde óyo ya ba intérêts, conscience eza na place te
Baza cassette te, mais bango tout baza na ba face B
Vie na biso eza message oyo ba'o koka ko tanga te
Nani ako pia béquille, na peuple oyo spiritualité ezo boîter?
Elambá soni ya lokúmu bo lati, bozo yoka kilo te
Olingi olongola lipoti ya lisu na nga, mais ya yo, eza kaka
Monguna na biso eza kaka oyo aza libanda te, bino pe
Oyo bo loni na mitema na biso ebungi te, eza kaka
Aaahh eza kaka
Aaahh eza kaka
Written by: José Mwembia Batoka, Mukinayi Luboya Marcus